Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 16:18 - Mokanda na Bomoi

18 Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 16:18
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki : « Tika ete Balevi nkoto tuku mibale na minei bazala bakambi ya misala ya Tempelo ya Yawe, Balevi nkoto motoba bazala bakomi mikanda mpe basambisi,


Mpo na bakitani ya Yitseari : Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu.


Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo ; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te.


Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.


Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.


wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.


Bapesaka mobali na ye lokumu, na ekuke ya engumba, tango avandaka elongo na bakambi ya mokili.


Boyokaki ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. ›


Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.


moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye.


Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.


Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.


Okokende epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe epai ya mosambisi oyo azali kosala mosala na tango wana. Okotalisa bango likambo yango mpe bango nde bakokata likambo.


bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga,


Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.


Tango Samuele akomaki mobange, aponaki bana na ye ya mibali mpo ete bazala basambisi kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ