Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 16:17 - Mokanda na Bomoi

17 moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 16:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani, mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo, wuta na mokano ya mitema na biso moko ? Nyonso ewutaka epai na Yo, mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.


Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.


Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali ; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma.


Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi.


Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.


Okosala feti ya Baposo mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.


Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba :


Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ