Deteronomi 16:16 - Mokanda na Bomoi16 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
mpe basengeli kotatola to kopanza kati na bingumba na bango nyonso mpe kati na Yelusalemi liloba oyo : « Bobima wuta na mokili ya bangomba, bomema longwa kuna bitape ya nzete ya olive ya mboka mpe ya zamba, bitape ya nzete ya mirite, mandalala mpe bitape ya nzete ya makasa ebele mpo na kotonga bandako ya matiti, kolanda ndenge ekomama. »
« Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.