Deteronomi 16:15 - Mokanda na Bomoi15 Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona ; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo ; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.
Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.