Deteronomi 16:11 - Mokanda na Bomoi11 Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.