Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 15:9 - Mokanda na Bomoi

9 Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 15:9
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.


Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.


ba-oyo balobaka : « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso ; nani akoluka kozala nkolo na biso ? »


Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.


Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango.


Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Moto oyo atiolaka moninga na ye asalaka lisumu, kasi esengo na moto oyo asalaka bato bakelela bolamu.


Soki moto akangi matoyi na ye mpo na koboya koyoka koganga ya mobola, ye mpe bakoyanola ye te tango akoganga.


Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe mpe kolula te bilei na ye ya kitoko,


Mabongisi ya bozoba ezali masumu, mpe bato bayinaka motioli.


Moto ya bilulela azalaka motema moto-moto mpo na kozwa bomengo, mpe ayebaka te ete bobola ekokomela ye.


Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu ; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te.


Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.


Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »


Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo.


Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.


Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo,


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke.


Boyambanaka malamu lokola nde boyambi bapaya kati na bandako na bino, bosalaka bongo na koyimayima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ