21 Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino.
Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango.
Bokobonzela Yawe, lokola likabo bazikisa na moto, lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali, bana mibali ya meme sambo ya mobu moko ; nyonso esengeli kozanga mbeba.
Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.
Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo.