Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 15:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tala ndenge esengeli kosalema : moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 15:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobaki : « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.


balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, soki ozali komona na Yo yango te ? Mpo na nini tomikitisa, soki ozali koyeba na yo yango te ? › Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, bozali kosala makambo oyo bolingi mpe bozali konyokola basali na bino nyonso.


limbisa mabe na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;


Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka ?


Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo.


Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino.


Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo,


Nzambe akosambisa na mawa te moto oyo ayokelaka bato mosusu mawa te. Mawa elongaka kosambisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ