17 wana okozwa motonga, okotia litoyi na ye na ezipelo ya ekuke mpe okotobola yango. Na bongo, akokoma mowumbu na yo mpo na libela. Okosala mpe ndenge moko mpo na mwasi mowumbu.
wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela.
Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala.
Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela.