Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 15:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 15:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito ?


« Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu.


« Boyoka ngai, bino bato oyo bolukaka bosembo mpe bolukaka Yawe ! Botala libanga epai wapi bosalemaki, mpe libulu epai wapi bobendamaki.


Yango wana, na mikolo oyo ezali koya, » elobi Yawe, « bato bakotika koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; ›


Kati na Klisto, tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, mpe bolimbisi ya masumu, kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe


Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili.


Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.


okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino ; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo.


Kasi soki alobi na yo : « Naboyi kotika yo, » mpo ete alingaka yo elongo na libota na yo mpe azalaka na esengo ya kovanda elongo na yo,


Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ