Neyemi alobaki na bango lisusu : — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
Kati na nyonso, natalisaki bino ete tosengeli kosala misala makasi ya lolenge oyo mpe kosunga bato bakelela, na kokanisa Maloba oyo Ye moko Nkolo Yesu aloba : « Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa. »
Tika ete moko na moko kati na bino, na mokolo ya liboso ya poso, abomba ndambo ya mbongo kati na ndako na ye, kolanda ezweli na ye, mpo ete bazela te kokoma na ngai mpo na kokongola makabo yango.