Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 15:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 15:13
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.


Nakosala ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito mpo ete, tango bokolongwa, bokende maboko pamba te.


« Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya bosembo te, mpe bashambre na ye ya etaje, na nzela ya lokuta ; oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba mpe afutaka bango eloko te ;


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba ; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi.


okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino ; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo.


Bino bankolo, bosungaka bawumbu na bino na nzela ya biloko ya sembo mpe ya solo, pamba te boyebi malamu ete bino mpe bozali na Mokonzi kati na Likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ