Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 14:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bokoki te kolia ata eloko moko ya mbindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 14:3
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo ; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo.


bato oyo bavandaka kati na bakunda mpe balekisaka babutu na bango kati na madusu ya mabanga ; bato oyo baliaka misuni ya ngulu mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ;


Bongo nalobaki : — Te, Nkolo Yawe ! Natikala nanu komikomisa mbindo te ! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma ! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te !


« Loba na bana ya Isalaele : ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia :


Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te.


Yango wana bosengeli kosala bokeseni kati na nyama oyo ezali mbindo mpe oyo ezangi mbindo, kati na ndeke oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto. Bosengeli te komikomisa mbindo na nzela ya nyama, ya ndeke to ya nyama nyonso oyo etambolaka na libumu, oyo natiaki pembeni mpo ete bino mpe bomona yango lokola mbindo.


Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.


Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo.


Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto ; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ