Bato ya Isalaele elongo na bato ya Yuda oyo bazalaki kovanda kati na bingumba ya Yuda bamemaki eteni na bango ya zomi ya bangombe, ya bameme, ya bantaba mpe ya makabo ya bule oyo ebulisamaki mpo na Yawe, Nzambe na bango, mpe batiaki yango na mipiku.
« Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.