Deteronomi 14:26 - Mokanda na Bomoi26 Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi : ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.