Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 14:24 - Mokanda na Bomoi

24 Kasi soki esika yango ezali mosika mingi mpo na yo komema eteni na yo ya zomi epai na Yawe, Nzambe na yo, pamba te esika oyo Yawe aponaki mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi, wana Nzambe na yo apamboli yo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 14:24
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Soki esika oyo Yawe, Nzambe na bino, aponi mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi mpo na bino, wana bokokata kingo ya bangombe na bino, ya bantaba na bino, ya bameme na bino, oyo Yawe apesaki bino ndenge natindaki bino mpe bokoki kolia yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


okoteka eteni na yo ya zomi ; bongo mbongo oyo okozwa, okokende na yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ