« Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango : — Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.