Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 13:7 - Mokanda na Bomoi

7 Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba : « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 13:7
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe.


Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi :


Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »


Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.


banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu),


Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo ;


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ