15 wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo,
Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi.
Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni.
Nyonso oyo moto akopesa epai na Yawe lokola likabo ekoki kotekama te to kosikolama ; ezala moto, nyama to mabele, pamba te nyonso oyo epesami epai na Yawe ezali bule mpo na Yawe.
ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango : « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te,
Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.
Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.
Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.
Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki : — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.
Mibali ya Isalaele bazongelaki bato ya libota ya Benjame mpe babomaki na mopanga mibali nyonso elongo na bibwele na bango, kobanda na engumba Gibea kino na bamboka mike. Batumbaki bamboka mike nyonso epai wapi balekaki.