Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe.
Alobaki na bango : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu ; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. »
ete apesa malako oyo epai ya bana ya Isalaele : « Soki moto moko ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na Isalaele abonzi moko kati na bana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, esengeli baboma ye. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga.
Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »
Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.
Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.
Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga.
Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.