Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 12:9 - Mokanda na Bomoi

9 Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 12:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.


Bongo Davidi alobaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi bopemi na bato na Ye mpe avandi libela kati na Yelusalemi.


Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bato oyo bakobika na mopanga bakozwa ngolu kati na esobe ; boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »


Botelema mpe bokende ! Awa ezali esika na bino ya kopema te, pamba te ezali mbindo, ebebisami makasi penza, mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te.


Bosengeli lisusu te kosala ndenge tozali kosala awa, na mokolo ya lelo : moto nyonso azali kosala ndenge alingi.


Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.


kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. »


Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.


Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ