Deteronomi 12:7 - Mokanda na Bomoi7 Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela !
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.