Deteronomi 12:6 - Mokanda na Bomoi6 Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule.
Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.
Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.