Deteronomi 12:5 - Mokanda na Bomoi5 Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.
Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’
Tika ete Nzambe oyo atiaki Kombo na Ye kuna akweyisa mokonzi nyonso to bato nyonso oyo bakomeka kotombola loboko mpo na koboya kotosa to kobongola mitindo na ngai na kobuka Tempelo oyo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Ezali ngai, Dariusi, moto napesi mitindo yango. Tika ete botosa yango malamu mpe na lombangu. › »
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.
Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala.