Deteronomi 12:3 - Mokanda na Bomoi3 Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. »
Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.
Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto.