Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 12:28 - Mokanda na Bomoi

28 Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 12:28
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ba-oyo bawutaki na Ava basalaki bikeko ya nzambe Nibikazi mpe nzambe Taritaki ; ba-oyo bawutaki na Sefarivayimi bazalaki kokoba kotumba bana na bango na moto lokola mbeka epai ya Adrameleki mpe Anameleki, banzambe ya bato ya Sefarivayimi.


Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,


Nabondelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,


mpo ete babatela mitindo na Ye mpe batosa mibeko na Ye. Bokumisa Yawe !


Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo ; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.


Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai.


Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › »


Soki kaka bobateli mibeko na Ngai, bokowumela kati na bolingo na Ngai, ndenge Ngai nabatelaki mibeko ya Tata na Ngai mpe nawumelaka kati na bolingo na Ye.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Bino mpe, bosili kokoma peto mpo na liloba oyo nateyaki bino.


Bolia yango te mpo ete bomona bolamu, bino mpe bana na bino ; na nzela wana nde bokosala oyo ezali alima na miso ya Yawe.


Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.


Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.


Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ