Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 12:21 - Mokanda na Bomoi

21 Soki esika oyo Yawe, Nzambe na bino, aponi mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi mpo na bino, wana bokokata kingo ya bangombe na bino, ya bantaba na bino, ya bameme na bino, oyo Yawe apesaki bino ndenge natindaki bino mpe bokoki kolia yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 12:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.


Mokonzi Roboami alendisaki bokonzi na ye, na Yelusalemi mpe akonzaki. Azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia kuna Kombo na Ye. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.


Tika ete Nzambe oyo atiaki Kombo na Ye kuna akweyisa mokonzi nyonso to bato nyonso oyo bakomeka kotombola loboko mpo na koboya kotosa to kobongola mitindo na ngai na kobuka Tempelo oyo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Ezali ngai, Dariusi, moto napesi mitindo yango. Tika ete botosa yango malamu mpe na lombangu. › »


Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Nzokande, bokoki kokata kingo ya bibwele na bino mpe kolia misuni na yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino nyonso, ezala mboloko to pambi, kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino. Moto ya mbindo to moto ya peto akoki na ye kolia yango.


Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba : « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi.


Bokolia yango ndenge baliaka pambi to mboloko ; moto nyonso, azala mbindo to peto, akoki na ye kolia yango.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.


Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito.


moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino ; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ