Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 12:17 - Mokanda na Bomoi

17 Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 12:17
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango ; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule.


Bokanisa nanu Isalaele ! Boni, bato oyo baliaka banyama oyo epesami lokola mbeka bazalaka moko te na etumbelo ?


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Kasi bokozwa biloko na bino ya bule mpe biloko nyonso oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa, mpe bokokende na esika oyo Yawe akopona.


Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.


Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda.


Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai.


Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ