Pamba te makila oyo esopaki ezali kati na yango ; esopaki yango na likolo ya libanga, esopaki yango na mabele te epai wapi putulu ekokaki kozipa yango.
Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula !
Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango.
Moto moko alobaki na Saulo : — Tala ! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. Saulo alobaki : — Bokweyisi kondima ! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa.