Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 12:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bosala keba ete bobonza te bambeka na bino ya kotumba na bisika nyonso oyo bokomona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 12:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye.


Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe.


Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye ;


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino.


Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango :


Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ