Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 12:10 - Mokanda na Bomoi

10 Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 12:10
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.


Alobaki na bango : « Boni, Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino te ? Apesaki bino bopemi na ngambo nyonso te ? Pamba te akabaki na maboko na ngai bato ya mokili oyo. Mokili yango ezali na se ya bokonzi ya Yawe mpe ya bato na Ye.


Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.


Yawe azongisaki : — Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi.


kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


‹ Solo, nakosangisa bango wuta na mikili nyonso epai wapi nabenganaki bango tango natombokelaki bango, nakozongisa bango na esika oyo mpe nakovandisa bango na kimia.


ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.


Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino ; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › »


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.


Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te ; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango.


Okoloba : ‘ Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke ;


Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda ; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia.


Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango,


Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te.


Mpo na Benjame, alobaki : « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! »


Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.


Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te ; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko.


Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.


Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.


Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana ; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango.


Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka.


Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango.


Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni ; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri  » mpo na koloba : « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ