Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 11:9 - Mokanda na Bomoi

9 mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 11:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.


Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi, kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse.


Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo.


pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi, ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo mpe ekomemela yo kimia.


Pamba te, na nzela na ngai, mikolo ya bomoi na yo ekokoma ebele, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.


Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko.


Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »


Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino.


mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela.


Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela.


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.


Sala oyo ezali alima mpe malamu na miso ya Yawe, mpo ete ozala moto ya esengo, mpo ete okota, mpe mpo ete okamata mokili ya malamu oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na yo na nzela ya ndayi,


mpo ete yo, bana na yo mpe bakitani na yo, botosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokozala na bomoi na kobatelaka bikateli na Ye nyonso mpe mibeko oyo napesi bino mpo ete bozala na bomoi molayi.


Oh Isalaele, yoka malamu ! Senzela ete otosa yango mpo ete ozala malamu mpe bokoma ebele na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge Yawe Nzambe ya bakoko na bino alakaki bino.


Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ;


Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ