Deteronomi 11:32 - Mokanda na Bomoi32 bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.