31 Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango,
Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
« Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › »
Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.