Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 11:24 - Mokanda na Bomoi

24 Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 11:24
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki likolo ya bakonzi nyonso, longwa na Ebale (Efrate) kino na mokili ya bato ya Filisitia mpe na mondelo ya Ejipito.


Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este ; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.


Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.


Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »


Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba : « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi.


etuka nyonso ya Nefitali, ya Efrayimi mpe ya Manase ; mokili nyonso ya Yuda kino na ebale monene Mediterane,


Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi : ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ