Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 11:22 - Mokanda na Bomoi

22 Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 11:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.


Nakangami na malako na Yo ; Yawe, koyokisa ngai soni te.


Yesu azongiselaki ye : — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.


Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye.


Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba,


mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso.


Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.


Batela malamu mibeko, mitindo mpe bikateli ya Yawe, Nzambe na yo, oyo apesi yo.


Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ