Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 11:17 - Mokanda na Bomoi

17 noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 11:17
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.


Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,


Soki likolo ekangami mpe mvula ezali lisusu te mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,


Soki nakangi likolo mpo ete mvula ebeta te to natindi mabanki mpo ete ebebisa mokili to natindi bokono mabe kati na bato,


Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka ; kasi soki afungoli yango, mokili ezindaka.


Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze.


Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.


« Napimelaki bino lisusu mvula, basanza misato mobimba liboso ete tango oyo babukaka bambuma ekoma. Natindaki mvula na engumba moko mpe nakangaki yango na engumba mosusu. Elanga moko enokelaki mvula, kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.


Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.


soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ;


pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili.


Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino ; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ