Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 11:15 - Mokanda na Bomoi

15 Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 11:15
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akabi apesaki mitindo na Abidiasi : « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso ; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. »


Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,


Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokima ata mwana na yango oyo esili kobota, pamba te matiti ya kolia ezali lisusu te.


Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.


Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.


Banyama ya zamba, bobanga te, pamba te matiti eboti lisusu na elanga, banzete eboti lisusu bambuma ; banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza.


Bokolia bilei ebele mpe bokotonda, bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo asaleli bino makambo ya kokamwa : bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.


Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.


Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »


bandako etonda na biloko ya malamu ya ndenge na ndenge oyo yo otiaki te, mabulu ya mayi oyo yo otimolaki te, bilanga ya vino mpe ya olive oyo yo olonaki te ; boye tango okolia mpe okotonda ;


Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ