14 nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.
Boye, akotindela yo lisusu mvula mpo na milona oyo okolona na mabele, mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene.
Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.
Bamilobelaka te : ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›
Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.
Yawe akoyanola mpe akoloba na bango : « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta ; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.
Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te.
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.