13 Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba,
Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.
Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba,
Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli.
Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ;
Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili.
Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.