10 Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino.
Namemaki bino na mokili oyo mabele na yango ebotaka malamu mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko ; kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.
Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ;