Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 10:8 - Mokanda na Bomoi

8 Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 10:8
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.


Davidi alobaki : « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »


Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali.


Amirami azalaki na bana mibali mibale : Aron mpe Moyize. Aron aponamaki mpo na libela, elongo na bana na ye ya mibali, mpo na kobulisa Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso ya Yawe, mpo na kosalela Ye mpe kopambola bato mpo na libela na Kombo na Ye.


Boye Balevi bazala lisusu te na mokumba ya komema Mongombo mpe bisalelo na yango nyonso. »


Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye.


Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.


Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe !


oyo botelemaka kati na Ndako ya Yawe, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso !


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo ; kasi yo, kolanda bango te.


Kati na Esika na Ngai ya bule, bakosala kaka mosala ya kokengela bikuke ya Tempelo mpe misala mosusu ya Tempelo ; bakobanda koboma mpo na bato bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu mpe bakotelema liboso ya bato mpo na kosalela bango.


Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.


Akangaki kitendi na moto ya Aron ; bongo liboso na yango, atiaki medaye ya wolo, elembo ya libulisi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.


Aron atombolaki maboko na ye epai ya bato mpe apambolaki bango ; bongo akitaki sima na kobonza mbeka ya masumu, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.


Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.


« Yeisa libota ya Levi pene ya Nganga-Nzambe Aron mpe pesa bango na maboko na ye mpo ete basunga ye.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki : — Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.


Polo, mowumbu ya Yesu-Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma mpe aponama mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe,


tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango,


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki


Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.


pamba te Yawe, Nzambe na yo, aponi ye elongo na bakitani na ye kati na bikolo na yo nyonso mpo na kotelema mpe kosala tango nyonso mosala na Kombo na Yawe kati na Tempelo.


mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te ;


Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali.


Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ