Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 10:21 - Mokanda na Bomoi

21 Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 10:21
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito ?


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, kovanda kimia te !


Bakolobela nguya na Yo ya somo, mpe ngai, nakosakola misala na Yo ya minene.


Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye ! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe !


Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo, kasi oyanoli ngai te ; na butu, nabeleli lisusu, mpe natikali kovanda nye te.


Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.


Yawe azongisaki : — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo.


Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo.


Wuta na tango ya kala penza, moto moko te atikala kososola, litoyi moko te etikala koyoka, liso moko te etikala komona, ete nzambe moko, longola kaka Yo, asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.


Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ; Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, mpo ete nakumisaka nde Yo !


pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »


Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ