Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.


Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba, tango Adadezeri akendeki kolendisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.


Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, na engumba Amati, tango Adadezeri akendeki kovandisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.


Shitrayi, moto ya engumba Saroni, azalaki mobateli bangombe oyo ezalaki kolia na Saroni ; Shafati, mwana mobali ya Adilayi, azalaki mobateli bangombe na mabwaku.


Bavandaki na ngambo ya este, longwa na mondelo ya esobe kino na ebale Efrate, pamba te bangombe na bango ekomaki ebele kati na mokili ya Galadi.


Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.


Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.


Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.


Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.


Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo.


Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.


Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste : yango nde ekozala mokili na bino.


Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.


Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »


Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango,


Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko : « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ