Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele.
Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe.
Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.
Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki : « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. »