Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:44 - Mokanda na Bomoi

44 Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:44
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazingelaki ngai lokola banzoyi, kasi ekufaki lokola moto ya esobe ; nabebisaki yango na Kombo na Yawe.


Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri ;


Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima.


Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama.


Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili.


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ