Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »
« Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. ›
Bongo Yawe alobaki na ye : « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango : ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. »
Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.