Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko ;
Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele.