Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:30 - Mokanda na Bomoi

30 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:30
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto ; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba. Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki.


Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.


Alobaki : « Bovanda kimia, boyeba ete ngai nazali Nzambe ; nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »


Yawe alobaki na Moyize : — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba.


Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.


Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.


« Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.


Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?


Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.


Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te,


bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba,


Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa.


Bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, Ye moko akobundela bino. »


Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango ; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki.


oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba ;


Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ?


Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.


Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele.


Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.


Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ