Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 1:29 - Mokanda na Bomoi

29 Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 1:29
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe.


Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso.


Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu : « Bobanga bango te ! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino ! »


Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. »


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.


Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino.


Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »


Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ